Romans 12

BOMOI YA MOKLISTO

Komikaba epai na Nzambe

1Bandeko, mpo na bolamu oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokaba banzoto na bino epai na Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe oyo esepelisaka Nzambe : yango ekozala losambo ya solo mpo na bino. 2Bolanda bizaleli ya tango oyo te, kasi bobongwana na nzela ya makanisi ya sika mpo ete bokoka kososola mokano ya Nzambe : oyo na miso na Ye ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

3Na nzela ya ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na moko na moko na bino : makanisi na bino eleka ndelo te ya oyo bozali, kasi bozala na makanisi oyo ekokana, na likabo ya kondima oyo Nzambe apesa na moko na moko na bino. 4Boye, ndenge tozali na biteni ebele kati na nzoto moko, mpe eteni moko na moko ezali na mosala na yango, 5ndenge wana mpe, biso oyo tozali ebele, tozali kaka nzoto moko kati na Klisto, mpe eteni moko na moko ezali mpo na biteni misusu. 6Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozali na makabo ekesena. Boye, tika ete oyo azali na likabo ya kosakola, asalela yango kolanda kondima. 7Tika ete oyo azali na likabo ya kosala mosala songolo kati na Lingomba, asala yango, oyo azali na likabo ya koteya, ateya, 8oyo azali na likabo ya kolendisa, alendisa, oyo azali na likabo ya kokaba, akaba na motema moko, oyo azali na likabo ya kokamba, akamba na ndenge esengeli, mpe oyo azali na likabo ya kosalisa bato bakelela, asala yango na esengo.

9Tika ete bolingo ezala na lokuta te. Boyina makambo ya mabe mpe bokangama makasi na makambo ya malamu : 10—mpo na bondeko, bolingana makasi bino na bino ; —mpo na lokumu, bozala bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ; 11—mpo na mosala, bozala bagoigoi te ; —mpo na Molimo, bozala na molende ; —mpo na Nkolo, bozala basali malamu ; 12—mpo na elikya, bozala na esengo ; —mpo na komekama, bokanga mitema ; —mpo na mabondeli, boyika mpiko ; 13—mpo na baposa ya babulami, bosalisaka bango mpe boyambaka bapaya malamu na bandako na bino.

14Bopambola bato oyo bazali konyokola bino, bopambola kasi bolakela mabe te ! 15Bosepela elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolela elongo na bango bazali kolela. 16Boyokanaka malamu bino na bino. Bozala bato na lolendo te, kasi bozala bato na komikitisa mpe bomimonaka te lokola bato oyo baleki na bwanya.

17Bozongisa mabe na mabe te, boluka tango nyonso kosala makambo malamu na bato nyonso. 18Soki ekoki kosalama, wana bozali na makoki, bozala na kimia na bato nyonso. 19Baninga na ngai, boluka kozongisa mabe na mabe bino moko te, kasi botika nzela na kanda na Nzambe ete esala, pamba te ekomama : “Ezali Ngai nde nazongisaka mabe na mabe ; Ngai nde nafutaka moto na moto oyo ekoki na ye,” elobi Nkolo Yawe. 20Nzoka nde : “soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei,
soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela.
Pamba te, soki osali bongo,
ezali lokola ozali kotia makala ya moto na moto na ye.”

21Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi luka kolonga mabe na nzela ya kosala malamu.
Copyright information for LinMNB